17 Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.
Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo !
Na monoko na ngai, natangaka mibeko na Yo nyonso.
Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.
Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani, nakokanga monoko na ngai te ; Yawe, oyebi yango !
Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe, kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.
‹ Yawe apesi biso etumbu ! Boya totatola na Siona makambo oyo Yawe, Nzambe na biso, asali. ›
Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.
Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : — Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.