Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 117:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Yawe ! Bino bato ya mabota nyonso, bopesa Ye nkembo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 117:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe ! Bokumisa Yawe !


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko !


Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »


mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.


Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.


Mpe lisusu : « Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Nkolo ! Tika ete bato ya mabota nyonso bakumisa Ye ! »


Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ