4 Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe : « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.
Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.
Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.
Lembisa pasi ya motema na ngai mpe kangola ngai na mitungisi na ngai.
Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.
Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
Molimo na ngai ezali kotungisama makasi ; bongo Yo, Yawe, kino tango nini ?
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »
Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.