18 Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,
Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.
Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola ; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.
Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.
Mpo na Yo Nzambe, bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ; mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.
Kotika te ete monoko na yo ememisa yo masumu, mpe kokende koloba te liboso ya basali ya Nzambe : « Ndayi na ngai ezalaki libunga. » Mpo na nini Nzambe atomboka mpo na maloba na yo mpe abebisa misala ya maboko na yo ?