16 Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana.
Nazali mosali na Yo ; pesa ngai mayele mpo ete nasosola malako na Yo.
Na bolingo na Yo, kanga minoko ya banguna na ngai mpe limwisa bayini na ngai nyonso, pamba te nazali mosali na Yo.
Balola elongi na Yo epai na ngai mpe yokela ngai mawa ; pesa ngai, mosali na Yo, makasi mpe bikisa ngai mwana ya mwasi mosali na Yo !
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;
Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.
Na butu ya lelo, Anjelu na Nzambe na ngai, oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai
Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.
Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.