Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe na likolo ya mwana na moto oyo Yo moko okomisaki makasi.
Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.
Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ?
Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.