Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 116:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo mpe mabondeli na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 116:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu.


Yawe alobaki na ye : « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso.


Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda ndenge okata mpo na bato oyo balingaka Kombo na Yo.


Tika ete Yawe akumisama, pamba te ayanoli mabondeli na ngai.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Babola bamoni mpe bazali kosepela. Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi !


Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, pamba te Ye moko nde asali yango ! Mibu nyonso ya bomoi na ngai, nakotambola na komikitisa likolo ya pasi ya motema na ngai.


Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »


Alobaki : « Kati na mawa na ngai, nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai. Wuta kati na mboka ya bakufi, nasengaka lisungi, mpe ayokaka ngai.


Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama.


Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso.


Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ