17 Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe, pamba te bango nyonso bakendaka na esika ya kimia.
Yawe, nabelelaki Yo ; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :
Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo ; bikisa ngai kati na bolingo na Yo.
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te ! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo ?
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.