Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 115:16 - Mokanda na Bomoi

16 Likolo ezali likolo ya Yawe ; kasi apesa mabele epai ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 115:16
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele ! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !


bokumisa Ye, bino oyo boleki likolo kati na likolo, mpe bino mayi oyo bozali na likolo !


Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;


Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye ; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.


Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo ! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi ; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe !


Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?


Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ