Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 115:14 - Mokanda na Bomoi

14 Tika ete Yawe afulukisa bino, bino mpe bana na bino !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 115:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.


Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.


Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?


Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.


Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi : « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »


Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele ; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami : « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo ! »


Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki !


Bongo nayokaki motango ya bato oyo babetamaki kashe : nkoto nkama moko na tuku minei na minei ; bazalaki bato ya mabota nyonso ya bana ya Isalaele.


Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ