Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 115:12 - Mokanda na Bomoi

12 Yawe akanisaka biso, akopambola ; solo, akopambola bana ya Isalaele, akopambola bakitani ya Aron.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 115:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.


Bato ya Isalaele, bopambola Yawe ! Bakitani ya Aron, bopambola Yawe !


Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Mabele eboti bambuma na yango ; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.


« Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ; oh Isalaele, nakobosana yo te.


Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »


Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki : — Nkolo, likambo nini ? Anjelu azongisaki : — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.


Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.


Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki.


Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ