Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 115:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bino bato oyo botosaka Yawe, botia elikya kati na Yawe. Azali lisungi mpe nguba na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 115:11
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye ;


Tika ete Isalaele aloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba : « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Bato ya Isalaele, bopambola Yawe ! Bakitani ya Aron, bopambola Yawe !


kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.


Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai, mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.


Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,


Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.


Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.


kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo.


Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki : « Bokumisa Nzambe na biso ; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ