Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 115:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na biso te, Yawe, na biso te, kasi pesa nkembo na Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 115:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.


Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.


Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !


Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo ! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye !


Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, mpo na lokumu na Ngai moko. Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ? Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.


Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe ! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino !


Nkolo, yoka ! Nkolo, limbisa ! Nkolo, yoka na bokebi ! Sala, kowumela te, mpo na lokumu ya Kombo na Yo moko, Nzambe na ngai ! Pamba te ngai, nazali kobelela Kombo na Yo mpo na bolamu ya engumba mpe ya bato na Yo ! »


Okomonisa Jakobi bosembo na Yo, mpe Abrayami, bolamu na Yo, ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ