« Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai,
Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?