Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 113:4 - Mokanda na Bomoi

4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 113:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi !


Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe ! Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ; nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.


Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; oleki banzambe nyonso.


Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.


Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, lokola putulu kati na emekelo kilo ! Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.


Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ; amonaka yango lokola eloko pamba to mpe lokola eloko te.


Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ