Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 113:3 - Mokanda na Bomoi

3 Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 113:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.


Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.


Nzambe ya banzambe, Yawe alobi, abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.


Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye, mpe bikolo nyonso ekosalela ye.


Nkolo, bikolo nyonso oyo osala ekoya kogumbama liboso na Yo mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.


Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo : « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! Mawa mpo na ngai ! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka ! »


Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.


Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.


Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ