8 Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.
Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?
Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai ; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.
Talela Yawe ! Zala makasi mpe yika mpiko ! Talela Yawe !
Bino babulami na Ye nyonso, bolinga Yawe ! Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye, kasi apesaka etumbu ya makasi epai ya bato ya lofundu.
Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye ; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
Nzambe, ozali makasi na ngai, nakotalela Yo ; ozali ebombamelo na ngai,
Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango.
Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.
Yawe alakelaka mabe ndako ya moto mabe, kasi apambolaka ndako ya moto ya sembo ;
Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.