7 Abangaka basango ya mabe te ; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.
okotombola elongi na yo na soni te, okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ;
Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?
Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene ! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.
kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »
Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori : — Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo.
Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te ; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.
Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.
Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.
Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.
Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.