Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 112:6 - Mokanda na Bomoi

6 Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 112:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !


Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo !


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.


Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.


Moto ya sembo akotikala kokweya te, kasi bato mabe bakovanda na mokili te.


Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ