Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.
soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.
Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.