3 Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.
Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.
Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.
Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.
Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
Bilei ya kitoko mpe mafuta ezalaka kati na ndako ya moto ya bwanya, kasi moto oyo azangi mayele abebisaka yango.
Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.
Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia ; bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo ; kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.
Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme ; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.