10 Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.
Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba : ‹ Azali wapi ? ›
Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.
Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
Salela ngai elembo ya boboto na Yo mpo ete banguna na ngai bamona yango mpe bakufa soni ! Yawe, ozali Mosungi mpe Mobondi na ngai.
Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.
Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.
Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe ; kasi bino, bokobwakama libanda.