Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 112:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bokumisa Yawe ! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 112:1
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi abengisaki Abidiasi, mobateli bikolo ya ndako na ye. Nzokande Abidiasi azalaki kotosa Yawe mingi.


Bokumisa Yawe ! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso.


Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai ; kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo.


Nasepelaka mingi na malako na Yo mpe nabosanaka liloba na Yo te.


Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te nasepelaka na yango.


Nalingaka mibeko na Yo mingi ! Nakanisaka yango mikolo nyonso.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye !


akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.


Bokumisa Yawe ! Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso, mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !


Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !


Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.


Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.


Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te ? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.


Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.


Pamba te kati na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe ;


Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.


Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ