Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.
Yango wana, Yawe, olandeli pasi yango kino okweyiseli biso yango ; pamba te Yawe, Nzambe na biso, ozali sembo kati na misala na Yo nyonso ; kasi biso, totosaki Yo te.
Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.