Banzembo 110:6 - Mokanda na Bomoi6 Akopesa bikolo etumbu : bikolo nyonso ekotonda na bibembe, mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, ezala oyo ezalaka mosika. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu, bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.