Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 11:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 11:6
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.


Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.


Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye, mpe batia motambo na nzela na ye.


Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.


Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.


Na esika ya mvula, atindelaki bango mvula ya mabanga mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.


Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai ; ozali ndanga ya bozwi na ngai.


Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.


Bato mabe bazali na pasi mingi, kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato oyo batiaka elikya na Yawe.


Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo : akitisaka moto songolo mpe atombolaka moto pakala.


Lamuka, lamuka ! Telema, Yelusalemi, yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, kopo ya kanda na Ye ; yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.


Yango nde etumbu na yo, mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, « pamba te bobosanaki Ngai mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye.


Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto.


Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu ! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.


Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.


Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ?


Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.


Samuele alobaki na moto oyo azalaki kolamba : « Yaka na ndambo ya biloko oyo nayebisaki yo ete otia yango pembeni. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ