3 Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini ?
Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
Olobaki : « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.
Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili ; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
Mpo na yo, bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›
Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »