Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 11:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.


Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !


Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.


Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;


Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo ! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.


Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima.


Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.


Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka mozindo ya mayele mpe ya mitema, sukisa kanza ya bato mabe mpe yikisa moto ya sembo mpiko.


Nzambe azali Mosambisi ya sembo, asilikaka mikolo nyonso.


Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango.


Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.


« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.


bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.


Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ