Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai : « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 11:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.


Boni, bato ya Etiopi mpe ya Libi bazalaki te mampinga minene ya basoda elongo na bashar mpe basoda ebele oyo babundaka likolo ya bampunda ? Kasi lokola ozalaki kotia elikya na yo kati na Ye, Yawe akabaki bango solo na maboko na yo.


Kasi nazongiselaki na ye : — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima ! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye ? Nakokende te !


Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.


Nzambe na ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo ; sala ete nayoka soni te, mpe banguna na ngai basepela te na tina na ngai.


Nayokaka matongi na bango na tina na ngai tango basanganaka mpe basalaka makita mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.


Pembeni ya Nzambe oyo nakumisaka Liloba na Ye, pembeni ya Yawe oyo nakumisaka Liloba na Ye,


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame.


Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.


Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.


mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.


Ndenge nini bokoki koloba : ‹ Tozali basoda ya mpiko, bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›


Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !


Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »


Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.


Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. »


Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ