Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 109:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 109:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.


Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango mandefu, akataki bango bilamba kino na likolo ya mipende mpe abenganaki bango.


Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.


Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,


Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.


Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.


Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?


Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ