3 Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.
Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.
Bazali kolanda ngai, basili kozingela ngai, mpe bazali koluka ndenge nini kobwaka ngai na mabele.
Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.
Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.
Pamba te balobaka te maloba ya kimia, kasi babongisaka lokuta mpo na kokosela bato ya kimia makambo kati na mboka.
Mpo ete, na kozanga tina, mpo na kokanga ngai, batielaki ngai mitambo mpe batimolaki mabulu,
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.
Kanda makasi na Yo ebetaka ngai, minyoko oyo ewutaka epai na Yo ekomisaka ngai moto pamba.
Bongo Davidi alobaki lisusu : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye ? Nasali nini ? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo ?