Tika ete bato nyonso oyo basepelaka na pasi na ngai, bango nyonso lisanga, bayoka soni mpe basambwa ! Tika ete bato oyo batombokelaka ngai balata soni mpe bazala kati na yikiyiki !
Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.
Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.