Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 109:20 - Mokanda na Bomoi

20 Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 109:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Mokonzi atunaki na moto ya Kushi : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Moto ya Kushi azongisaki : — Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana.


Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Pamba te banguna na ngai bazali koloba mabe na tina na ngai, mpe bato oyo balukaka koboma ngai basaleli ngai likita.


Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.


Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.


Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Kasi Yesu azongisaki : — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.


Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ