Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 109:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 109:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre ; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. »


Ayitofeli alobaki na Abisalomi : — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo.


Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.


Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.


Moto oyo alobaka solo akowumela mpo na libela, kasi mokosi akowumela kaka mpo na tango moke.


Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.


Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,


« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.


Mosala na bango se kokosa na kokosa ; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.


Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ