Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 109:14 - Mokanda na Bomoi

14 Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 109:14
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »


Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.


Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi.


Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi.


Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! » Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna.


Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. »


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !


Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.


Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso oyo basali mpo na koboma ngai ; kolimbisa mabe na bango te, kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! Tika ete balenga liboso na Yo ! Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.


Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ