9 Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo ;
Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.