Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 108:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule : « Nakolonga ! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 108:8
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi.


mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron ; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi.


Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.


Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »


Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ