Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 108:6 - Mokanda na Bomoi

6 Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 108:6
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.


Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : — Makambo oyo olobi ezali malamu.


Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.


Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »


Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ