4 Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye ;
Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso, nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.
Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.
Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.
Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe ; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.
‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »
« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.