2 Nzambe, motema na ngai ezali na kimia ! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ; ezali mpe lokumu na ngai.
Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe !
Bosanzola Yawe na nzenze, bosanzola Ye na lindanda ya basinga zomi.
Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.
Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ; kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso ! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko !
Debora, lamuka ! Lamuka ! Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba ! Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ; mwana mobali ya Abinoami !