12 Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso !
« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; bino nyonso bozali babondisi mabe.
Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.
Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango ?
Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. Tango Yawe akosembola loboko na Ye, ye oyo asungaka akobeta libaku, mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; bongo, bango mibale bakobebisama.
Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi ; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.