1 Nzembo ya Davidi.
Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba ; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.
Nzembo ya Davidi. Nasanzolaka Yo na motema na ngai mobimba ; nayembelaka Yo banzembo liboso ya banzambe.
Tika ete monoko na ngai ekumisa Yawe ! Tika ete bikelamu nyonso epambola Kombo na Ye ya bule libela na libela !
Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo.
Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.
Tika ete monoko na ngai etonda na masanzoli mpo na lokumu na Yo ; tika ete etatolaka tango nyonso kongenga ya nkembo na Yo.
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.