9 Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ; abimisaka bakangami na boloko.
Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.
Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.
Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »
Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !
Atondisi na biloko ya malamu bato oyo bazalaki na nzala, mpe azongisi bazwi maboko pamba.