Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;
Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo ateyaka yo makambo ya malamu mpo na bolamu na yo ; oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.
Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,
Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango koyeba te nzela ya bosembo, na esika ete, sima na bango koyeba nzela ya bosembo, basundola mibeko ya bule oyo epesamelaki bango.