Isalaele alobaki na Jozefi : — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.
Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.