Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.
nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi.
Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele.
Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.