Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 107:12 - Mokanda na Bomoi

12 Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi ; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 107:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango.


Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? »


Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »


Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.


Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.


Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo ; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai.


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo : ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »


Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.


Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai ! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.


Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.


Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! » Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ