Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 107:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 107:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.


Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo : « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. »


Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele ; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo : « Azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.


Pamba te Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye ! Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !


Bokumisa Yawe ! Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ; teya ngai mitindo na Yo !


Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.


Atalisaka boboto na Ye tango nyonso epai ya bato oyo batosaka Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ