Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 106:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye, mpo na kotalisa nguya na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 106:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.


Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo, bikisa bomoi na ngai ! Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.


Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.


Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.


Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.


Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.


Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakolembisa kanda ya motema na Ngai ; mpo na lokumu na Ngai, nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. Yango wana, nakoboma yo te.


Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo ! Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo ! Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso mpe kobebisa yango te !


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.


Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »


Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.


Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon : « Nakomisaki yo mokonzi mpo na kotalisa nguya na Ngai kati na yo, mpe mpo ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. »


Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ