7 Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo ; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.
« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?
Nakotatola boboto ya Yawe, nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato.